
Na nsima ya midi ya mokolo ya 16 Yuni, na ngonga ya mboka, président ya Kazakhstan Kassym-Jomart Tokayev asololaki na moninga na ye ya Chine Xi Jinping na Astana.
Président Xi asimbaki makasi ete boyokani Chine-Kazakhstan etelemi na momekano ya mbongwana ya mokili mobimba mpe ebatelaki ntango nyonso nivo ya likolo ya bokoli. « Yango ezali mpo na bozalani ya géographie mpe boninga ya kala kati na bato babale, mpe lisusu boponi ya kozanga kopengolama ya bikolo biye mibale mpo na kolanda bokoli ya kosangisa, » elobi ye.
Engebene ye, Chine etalaka mpe ekolisaka ntango nyonso boyokani na yango na Kazakhstan na lolenge ya mayele mpe ya ntango molai. Ezali na bolingi ya kosala elongo na Kazakhstan mpo na kolendisa boninga ya Chine-Kazakhstan mpe kopesa maboko mingi na kimia mpe bokoli ya etuka mpe ya mokili mobimba na nzela ya bosikisiki mpe nguya malamu ya boyokani ya bikolo mibale.