
Sous-forum « Echange entre civilisations mpe apprentissage mutuel: patrimoine culturel mpe innovation » esalemaki vendredi lokola eteni ya bokutani ya ba ministres mpo na dialogue mondial kati na ba civilisations na Pékin. Molulu yango motalelaki mingi kolendisa boyokani ya mimeseno ya mokili mobimba mpe kolendisa bokoli ya bato banso na nzela ya masolo.